BOSENGI YA LISUNGI YA MOSAMBELI



Titre: «Bosengi po bakoka kopesa yo lisungi ya mosambeli (avocat) ya ofele – procuration to mokanda ewuti epayi ya moko ya basambeli oyo bazali na Molongo (liste) ya Basambeli oyo ya Bureau oyo etalaka makambo ya Azili»
Nazali kosenga bokoka kopesa ngai mosambeli ya ofele lolenge ekomami na article 71 paragraphe ya 3 ya mobeko 4636/2019 (Α’169) mingi mingi oyo etali maye masengami mpe mabongisami oseyi ya mokano (ΦΕΚ Β΄2864) oyo ezwami na bomoko, na yoko ministre mpe ezali na numero ya protokole ya reference (oyo ekolakisa nzela) αριθμ. πρωτ. οικ. 12205/9.9.2016 na maye matali etamboli ya bosengi azili, na eteni (niveau) ya mibale (Article 92 kino 97 ya mobeko 4636/2019).
BOPESI MOKANDA(procuration) oyo ekopesa nzela na avocat oyo asalaka elongo na ba avocats oyo basalaka na Bureau ya Azili po ete akoka komiyengela mpe kosala manso masengeli pona « ASUNGA MPE ASAMBA PONA MOSENGI AZILI NA ETENI YAMIBALE YABOSENGI AZILI (2ème niveau), LIBOSO YA BAKONZI ».
NAPESI NZELA na mosambeli, moko ya basambeli oyo bazali na Mulongo ya Basambeli oyo basalaka na Bureau ya Azili, moko na bayi bazali na mulongo ya bakombo oyo ezali na kati ya mokanda oyo mosusu epesami elongo, na poni nde ndeko mosambeli oyo, mpo akoka kokamata bosengi na ngai mpe kosunga ngai, na bolandami ya mabongisami oyo ezali na numero ya reference(oyo ekolakisa nzela)oyo elandi, αριθμ. πρωτ. οικ. 3686/19-2-2020 «Bosungi na mayi matali mibeko pona basengi ya Azili»(Β΄ 1009) ya mokano oyo ezwami na bomoko, na yoko ministre. Na yango, akokoka, tangu alakisi/amemi photocopie ya mokano oyo epesi nzela, kokende bisika banso esengeli mpe kosala maso esengeli pona ngai, epayi ya bakonzi oyo batali makombo ya bosengi Azili na eteni ya mibale mpe lisusu :
- Akoma mpe (akotisa recours pona ngai) atelemela mokano oyo epesalameli ngai ete ba boyi kondima bosengi na ngai ya azili. [Akoka mpe kosenga nzela pona ngai po ete na koba kovanda na kati ya mboka oyo), Na esika na mbengami epayi ya bakonzi, ye akoka kokende pona ngai lolengi ekomami na Ν. 4636/2019, lolenge babongoli mpe babongisi yango, na Commite ya ba Recours na mokolo oyo bako solola pona recours oyo ya ngai na ntangu oyo nde bakonzi yango bako pona.

- Aya liboso ya Commite, akotisa ba mikanda oyo ekosunga maye na lobaka mpe mikanda ya sika ya biloko oyo etindaki ngai na kima mboka na ngai mpo esunga bokengeli ya sika ya bosengi na ngai, lolenge moko mpe, mokanda to eloko nionso esengeli akotisa kuna na bolandami ya botindami oyo ngai na tindi ye, mpe bosengi na ngai ete esika ya bosambi yango ezala na bikuke bikangama na ngonga ya bosambi mpe akoka kotelemela liloba nionso ya ngai oyo elobaki ete nasengi bikuke ya kofunguama pona mokola ya bosambi wana.

- Azala mpe akoka koloba pona ngai, na mbala inso bato ya Commite bako benga ngai pona koyoka biyano na ngai. Akoka kosenga ete bazongisa na sima mokolo yako samba soki esengeli, mpe na mbala inso oyo esengeli, akoka kobakisa oyo esengeli lolenge mayele na bakelasi oyo ayekola elakisa ye pona makambu etali boyebi mpe mibeko ya mboka po ete na suka akoka koloba pona ngai na lolenge oyo engeli ya malamu mpenza, liboso ya Commite oyo yaba recours.

- Mosambeli na ngai oyo kombo ezali awa na likolo, na Bureau Regional/Central ya Azili to mpe na ba Bureau oyo nionso esengeli, mpe azala na makoki ya kosenga ete epesamele ye photocopie (ya papier, to ya motindo oyo ebiangami numerique), ya mokanda nionso esengeli mpe ezuami okati ya dossier na ngai ya Azili,mpo ete akoka kolobela ngai kuna na makambu etali Azili na ngai na eteni esengeli. Akoka kosala eloko nionso esengeli epayi ya bakonzi, pona makambu etali bosengi na ngai ya Azili na eteni ya mibale, ata soki eloko yango esengeli asala ekomami na mokanda oyo te na lolenge moko ya puasa, oyo moto nionso akoki kososola na pete.

Moyo oyo akotia linzaka na ye na mokanda oyo, soki nanu akotisi recours na ye te, azangisa te koya na mokolo mpe ngonga oyo ekopesamela, na kati ya mokanda (procuration) oyo salami pona mosambeli to pe avocet na ye, po ete akoka ye meyi kokotisa recours mpe kotelemela mokano oyo epesamelaki ye na eteni oyo ya liboso na bolandami ya mabongisi ya 78 paragraphe 3 ya mobeko 4636/2019, lolenge ebongisami na mbala eleki mpe ezali nanu na kati ya 11 ya Mobeko 4686/2020. Soki nde lolenge mosusu ezali te, mpe na lolenge oyo ba bengi force majeur, esengeli ete mosambeli nde akoka kokotisa recours po na mosengi azili, esengeli nde na lombango mosengeli akoka koyebisa mosambeli oyo kombo na ye ezali na molongo ya basali oyo ya Bureau ya Azili, po ete mosambeli akoka kotisa recours yango na bolandami ya maye mabongisami. Bozangi botosi na oyo esengami awa to, bozangi koyanala oyo ezangi nzela mpe ntina ya solo, na masolo mpe na kobenga oyo mosambeli akobenga mosengi, ekosala ete eteni moko ya mokanda (procuration) oyo, ekoka kokweya na mayi. Yango ekosala ete eteni yap procuration oyo ekopesa nzela na mosambeli akoka kokotisa recours kaka yango nde ekoka kosalisama. Nalolenge wana,esengeli lisusu te, ete mosambeli akoka kosala alinga alinga te (obligatoirement) maye manson ekomami na mokanda oyo na mozindo mpe mobimba na yango.

Ngai oyo na tie linzaka na makomi oyo, bayebisi ngai maye manso makomami na mokanda oyo, na monoko oyo na yokaka malamu mpe nalobi lisusu boye, na sosoli mpe na ndimi maye makomami na kati ya mukanda (procuration) oyo mpe, mpe motindo na mozindo (ampleur) ya lisungi ya ofele kowuta na basambeli oyo bazali na molongo yaba oyo basalaka na Bureau ya Azili, pona maye matali mibeko ya mboka, nionso oyo pona bokokisami ya eloko to, action oyo ebengami . « BOLOBELI MPE LISUNGI LIWUTI NA BASAMBISI PONA BASENGI YA AZILI NA ETENI YA MIBALE (2eme niveau)YA BOSENGI NA BANGO AZILI».

Pona kosilisa, napesi nzela na mosambeli oyo kombo na ye ezali na kati ya liste ya ba sambeli oyo ba salaka na bureau ya Azili. Ye nde akotala makambu etali dossier na ngai, akoka kokamata ba photocopies (numerique) ya mikanda oyo ezali na kati ya dossier na ngai.